Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »
Bomengo ya bitumba oyo etikalaki na oyo basoda oyo bakendeki na bitumba babotolaki ezalaki : meme na bantaba nkoto nkama motoba na tuku sambo na mitano ;