Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 31:30 - Mokanda na Bomoi

30 Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 31:30
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.


Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »


Na Ndako ya kapo ya Bokutani, bakitani ya Gerishoni bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo mpe ndako ya kapo, bizipelo na yango, rido ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani,


Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.


Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba.


Kamata mpako yango kati na ndambo ya eteni na bango mpe pesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari lokola eteni ya Yawe.


Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari basalaki ndenge Yawe atindaki Moyize.


Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »


Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.


Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.


Boloba na Arshipe : « Sala keba na lotomo oyo ozwaki kati na Nkolo mpo ete okokisa yango malamu. »


Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.


Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ