« Loba na Balevi mpe yebisa bango : ‹ Tango bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele eteni ya zomi oyo napesi bino lokola libula, bosengeli kopesa eteni ya zomi ya biteni wana ya zomi lokola likabo mpo na Yawe.
Na nzela wana nde bino mpe bokobonza makabo epai na Yawe wuta na biteni nyonso ya zomi oyo bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele. Mpe wuta na biteni wana ya zomi, bosengeli kopesa eteni ya Yawe epai ya Nganga-Nzambe Aron.
Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba.
Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »
Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.