« Yo, Moyize, mpe Nganga-Nzambe Eleazari, elongo na bakambi ya mabota ya lisanga ya Isalaele, botanga motango ya bato, ya banyama nyonso oyo bakangaki.
Alobaki na bango : « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. »