23 mpe biloko nyonso oyo ezikaka na moto te nde bokolekisa na moto mpo na kopetola yango ; bokopetola yango lisusu na mayi ya bopetolami. Kasi bokopetola na mayi biloko nyonso oyo ezikaka na moto.
Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;
Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi ; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa ; sima na yango nde ekozonga lisusu peto.
Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa.
Mpo na kopetola moto oyo akomi mbindo, bakokamata putulu ya ngombe ya mwasi oyo batumbi na moto lokola mbeka mpo na masumu, bakotia yango na sani mpe bakosopela yango mayi ya etima.
Moto ya peto akokamata putulu ya ngombe mpe akotia yango na libanda ya molako na esika ya peto epai wapi bana ya Isalaele bakobatela yango mpo na kobongisa mayi ya bopetolami ; ezali mbeka mpo na masumu.
Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango : okobwakela bango mayi ya bopetoli ; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto.
Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.
Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto
Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.