Mosakoli alobaki na mokonzi : — Tala maloba oyo Yawe alobi : « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye ; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. »
Moto na Nzambe asilikelaki ye mpe alobaki : — Ebongaki na yo kobeta yango na mabele mbala mitano to mbala motoba, boye olingaki kolonga bato ya Siri mpe kosilisa bango nye. Kasi sik’oyo, okolonga bato ya Siri kaka mbala misato.
Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.
Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye.