Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba.
mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko.
« Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe.
Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye : « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. »
Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.