mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko.
Kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba : basi, bana, bibwele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na engumba. Boye bokosalela bomengo ya bitumba oyo ekowuta epai ya banguna na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akokaba na maboko na bino.
Bana ya Isalaele bazwaki mpo na bango lokola bomengo ya bitumba : biloko nyonso ya engumba wana mpe bibwele na yango, kasi basilisaki koboma bato nyonso na mopanga, batikaki ata moto moko te na bomoi.
Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. »