Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani : « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi.