3 ‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye.
Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga.
« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.
Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi.
Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.
Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »