Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo.
Mawa na bino, batambolisi bakufa miso ! Bolobaka : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya Tempelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya wolo ya Tempelo, wana asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
Bolobaka lisusu : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya etumbelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali na likolo ya etumbelo, asengeli kokokisa ndayi na ye. ›
Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye ; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo.
Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa.
Sima na basanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, Jefite ; mpe Jefite akokisaki epai ya mwana na ye ya mwasi, ndayi oyo alapaki. Nzokande, atikalaki kaka koyeba nzoto ya mobali te. Boye, ekoma momesano kati na Isalaele :