Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 30:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi soki mobali na ye akweyisi yango tango ayoki yango, ndayi moko te to ekateli moko te oyo ebimaki na monoko na ye ekotikala bongo. Pamba te mobali na ye akweyisi yango, mpe Yawe akotangela ye yango lokola niongo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 30:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kuna, pene ya ebale Akava, napesaki mitindo ya kokila bilei mpo na komikitisa liboso ya Nzambe na biso mpe kosenga Ye mobembo malamu mpo na biso, mpo na bana na biso mpe mpo na biloko na biso nyonso.


Nzokande tango bango babelaki, ngai nalataki saki, namikitisaki na kokila bilei, nazalaki kobondela mpo na bango.


Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ? Boni, ezali kaka kogumba moto lokola nzete oyo ebotaka na mayi, kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ? Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, mokolo oyo Yawe alingaka ?


Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela : na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te,


« Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai ; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto.


Ekozala mpo na bino mokolo ya kopema lokola mokolo ya Saba, mokolo ya komikitisa. Bokobatela mokolo na bino ya Saba, kobanda na pokwa ya mokolo ya libwa kino na pokwa ya mokolo oyo ekolanda. »


Na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokokila bilei, bokosala mosala moko te oyo bokosalaka mokolo na mokolo.


bongo, mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te mpe apekisi ye te, ndayi oyo alapaki mpe ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo.


Mobali na ye azali na bokonzi ya kondima to koboya ndayi nyonso oyo alapi to ekateli nyonso oyo asili kozwa na kokila bilei.


Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.


Mobali akelama te mpo na mwasi, kasi mwasi akelama mpo na mobali.


Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ