Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bakobatela bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bakosalisa bana ya Isalaele na nzela ya kosala mosala ya Mongombo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 3:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki kolanda malako ya suka ya Davidi nde batangaki bakitani ya Levi kobanda na mibu tuku mibale mpe koleka.


Sik’oyo, bana na ngai ya mibali, bobenda nzoto te, pamba te Yawe aponi bino mpo ete botelema liboso na Ye, bosala mosala na Ye, bosala losambo mpe botumbela Ye mbeka ya malasi mpo na lokumu na Ye.


Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !


Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki.


Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma.


Bakosalisa ye mpe bakosunga lisanga mobimba liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na kosala misala ya Mongombo.


Pesa Balevi na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bango nde kati na bana ya Isalaele basengeli komipesa mobimba epai na ye.


Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Wana nde misala ya bituka ya bato ya Gerishoni kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango.


Wana nde misala ya bituka ya bato ya Merari. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango nyonso kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ