Shelomiti elongo na bandeko na ye ya mibali bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso oyo mokonzi Davidi abulisaki mpo na Yawe ; bakambi ya mabota, bakambi ya bankoto, bakambi ya bankama mpe bakonzi mosusu ya mampinga.
Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.
Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »
Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »
Sima na yo kopetola Balevi mpe kobonza bango lokola likabo, bakozwa ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye, okopetola bango mpe okobonza bango lokola likabo epai na Yawe,