Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
Azwaki na maboko ya bana liboso ya Isalaele mbongo ya bibende nkoto moko na nkama misato na tuku motoba na mitano kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule.
Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;