Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 3:47 - Mokanda na Bomoi

47 okokongola mbongo ya bibende, nkama mitano, kolanda ndenge batangaka mbongo kati na Esika ya bule, mpo na moto moko na moko. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 3:47
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo : bagrame motoba ya palata.


Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola.


Mbongo moko ya ebende ya palata ekokani na bagrame zomi na mibale, mpe mine moko ekokani na mbongo ya bibende ya palata, tuku motoba.


Mituya nyonso ekokatama ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale.


Tala motuya ya kopesa kolanda ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo : mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu tuku mibale mpe tuku motoba, bagrame nkama motoba ya palata mpo na mobali ;


mpo na moto oyo mikolo ya mbotama na ye ya mbotama ezali kati na sanza moko mpe mibu mitano, bagrame tuku motoba ya palata mpo na mobali, mpe bagrame tuku misato na motoba ya palata mpo na mwasi ;


Tango bakokokisa sanza moko, osengeli kosikola bango na motuya ya mbongo ya bibende mitano ya palata, oyo moko na moko kati na yango ezali ya bagrame zomi, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.


Okopesa mbongo oyo osikoleli bana mibali nyonso, oyo baleki na motango ya Balevi, epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali. »


Azwaki na maboko ya bana liboso ya Isalaele mbongo ya bibende nkoto moko na nkama misato na tuku motoba na mitano kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule.


Likabo na ye ezalaki : etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ