Kasi soki mwana yango ya liboso ya nyama ezali mwana ya ane, bosengeli kobonza na esika na yango mwana meme ; soki te, bokobuka yango kingo. Kasi bokosikola na mbongo mwana nyonso ya liboso kati na bana na bino ya mibali.
Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. ›