Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 3:38 - Mokanda na Bomoi

38 Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 3:38
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.


Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango ; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa.


Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »


Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.


Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »


Bato ya bituka ya Gerishoni batongaki molako na bango na sima ya Mongombo, na ngambo ya weste.


Bato ya bituka ya Keati batongaki molako na bango pembeni ya Mongombo, na ngambo ya sude.


Tsurieli, mwana mobali ya Abiyaili, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Merari. Batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Mongombo.


Bazalaki mpe lisusu na mokumba ya kobatela makonzi oyo ezalaki zingazinga ya lopango, bapike ya Ndako ya kapo mpe basinga na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ