Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi : bakitani ya libota ya Libini, bakitani ya libota ya Ebron, bakitani ya libota ya Maali, bakitani ya libota ya Mushi, bakitani ya libota ya Kore. Keati azalaki tata ya Amirami ;
Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.