32 Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.
Tala misala ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron : kolandela mafuta ya etelemiselo ya minda, ansa ya kozikisa, makabo ya mokolo na mokolo mpe mafuta ya epakolami ; kokengela Mongombo mpe biloko na yango nyonso, ezala Esika ya bule to biloko na yango nyonso. »
Mosala nyonso ya bato ya Gerishoni ekokambama na Aron mpe bana na ye ya mibali : ezala mpo na komema biloko to mpo na kosala mosala ; bokoyebisa bango mosala nyonso oyo bango basengeli kosala.
Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »