Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.
Okopakola bango mafuta ndenge opakolaki tata na bango, mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe : epakolami na bango ekopesa bango nzela mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe libela na libela kati na bakitani na bango.
Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila ; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango.
Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya Yawe tango bazalaki kobonza mbeka, na nzela ya moto oyo ebulisama te, liboso ya Yawe, na esobe ya Sinai. Batikalaki kozala na bana te. Boye Eleazari mpe Itamari kaka nde batikalaki kosala mosala ya bonganga-Nzambe na bokambami ya tata na bango, Aron.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe, oyo batiami na nzela ya Mibeko ya Moyize, bazali bato na bolembu ; kasi Mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo Nzambe atie na nzela ya maloba ya seleka, oyo eyaki sima na Mibeko ya Moyize, azali Mwana na Ye moko, oyo azali ya kokoka mpo na libela.