28 Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto mwambe na nkama motoba. Bato ya Keati bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
Tala bakitani oyo babimelaki na Keati : bituka ya bato ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli. Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Keati.
Bato ya bituka ya Keati batongaki molako na bango pembeni ya Mongombo, na ngambo ya sude.
Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.
Bakosalisa ye mpe bakosunga lisanga mobimba liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na kosala misala ya Mongombo.