26 barido ya lopango, rido ya ekuke ya lopango oyo ezingela Mongombo mpe etumbelo, basinga mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela na basinga wana.
bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango,
Tala bakitani oyo babimelaki na Keati : bituka ya bato ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli. Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Keati.
Tala misala mpe mokumba ya bituka ya bana mibali ya Gerishoni :