22 Motango ya mibali nyonso oyo batangamaki kobanda sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto sambo na nkama mitano.
Tala bakitani oyo babimelaki na Gerishoni : etuka ya bato ya Libini mpe etuka ya Shimei. Bango nde bato ya bituka ya Gerishoni.
Bato ya bituka ya Gerishoni batongaki molako na bango na sima ya Mongombo, na ngambo ya weste.