Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 3:15 - Mokanda na Bomoi

15 « Tanga motango ya Balevi kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Tanga bana mibali nyonso kobanda na ye oyo azali na sanza moko ya mbotama mpe koleka. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 3:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bapesaki na Banganga-Nzambe oyo bakombo na bango ekomamaki kolanda mabota na bango ya botata mpe na Balevi oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda mibu tuku mibale mpe komata, kolanda mikumba mpe masanga na bango ;


Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.


« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.


Yawe abimelaki biso na kala, alobaki : « Nalingaka bino na bolingo ya seko ; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.


Yo mpe Aron, bokotanga motango ya mibali oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ba-oyo nyonso bazali na makoki ya kosala mosala ya soda kati na Isalaele ; bokotanga bango kolanda milongo na bango ya mampinga.


Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi.


Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango : na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni ; na nzela ya Keati, bakitani ya Keati ; na nzela ya Merari, bakitani ya Merari.


Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.


Boye, Moyize atangaki bango ndenge Yawe atindaki ye.


Motango ya mibali nyonso oyo batangamaki kobanda sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto sambo na nkama mitano.


Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto mwambe na nkama motoba. Bato ya Keati bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.


Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki na sanza moko ya mbotama mpe koleka, oyo batangamaki ezalaki nkoto motoba na nkama mibale.


Motango nyonso ya bana mibali ya liboso, oyo bakomaki bango bakombo, wuta na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale na tuku sambo na misato.


Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.


mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ