Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 3:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe.


bokobonzela Ye bana mibali nyonso ya liboso : bana nyonso ya liboso ya banyama ekozala ya Yawe.


Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. ›


« Bulisela Ngai mwana mobali nyonso ya liboso kati na bana ya Isalaele ; ezala moto to nyama, azali ya Ngai. »


Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo : ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango ; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango.


Mwana mobali nyonso ya liboso azali ya Ngai ; ekozala mpe bongo mpo na mwana mobali nyonso ya liboso kati na bibwele na bino : ezala mwana ngombe, mwana ntaba to mwana meme.


Bambuma ya liboso oyo ya kitoko mpe makabo na bino nyonso, kolongola ata eloko moko te, ekozala ya Banganga-Nzambe ; bokopesa bango bambuma ya liboso ya bilanga na bino ya ble mpo ete mapamboli ezala kati na bandako na bino.


Moto moko te akoki kobulisa mwana liboso ya nyama na ye, pamba te mwana ya liboso ezali ya Yawe ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba.


Mpe lisusu, bana liboso nyonso, ezala ya bato to ya banyama oyo bakomema epai na Yawe bakozala mpo na yo. Kasi osengeli kosikola mwana mobali nyonso ya liboso ya moto to ya nyama ya mbindo.


Tala, Ngai moko nde naponaki bandeko na yo, Balevi, kati na bana ya Isalaele lokola likabo mpo na yo ; babulisami mpo na Yawe mpo na kosala mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Okotia Balevi pembeni mpo na Ngai, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele nyonso ya Balevi, na esika ya bana ya liboso ya bibwele nyonso ya Isalaele. Nazali Yawe. »


wana bato ya Ejipito bazalaki kokunda bibembe ya bana mibali na bango ya liboso oyo Yawe abetaki mpo na kopesa etumbu na banzambe na bango.


kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : « Mwana mobali nyonso ya liboso akobulisama mpo na Nkolo ; »


pene ya lisanga ya bana liboso ya Nzambe, ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na Likolo ; pene ya Nzambe, Mosambisi ya bato nyonso ; pene ya milimo ya bato ya sembo oyo Nzambe akomisaki bato ya kokoka ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ