9 Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ;
Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.
Bokobonzela Yawe mbeka ya kotumba, lokola biloko ya solo kitoko : mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.