Mitango 29:39 - Mokanda na Bomoi39 Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama ; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Wana nde ezali mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe, na nzela ya ndayi, elongo na makabo oyo asengeli kobonza epai na Yawe mpo na libulisi na ye. Mpe soki azali na makoki, akoki na ye kopesa makabo mosusu wuta na motema na ye moko. Akokokisa biloko nyonso kolanda ndayi oyo asilaki kolapa mpe mobeko ya libulisi na ye. › »