37 Mpo na ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
Bokobonza lokola mbeka ya kotumba mpe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali ; mpe bana mibali ya meme, sambo, ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.