25 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
Na mokolo ya mitano, bokobonza bangombe ya mibali libwa, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi elongo na bato ya bikolo mosusu, oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda mpe bazalaki kogumbamela Nzambe, balandaki Polo mpe Barnabasi oyo bazalaki kosolola na bango mpe kondimisa bango ete batikala ya kokangama makasi na ngolu ya Nzambe.
Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.