17 Na mokolo ya mibale, bokobonza bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba ;
Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.
« Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » elobi Yawe ? « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, bambeka na bino ya bameme ya mibali mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ; nazali kosepela ata moke te na makila ya bangombe ya mibali, ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.
Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala.
Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mpe lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe zomi na misato ya mibali, bameme mibale ya mibali, mpe bana meme zomi na minei ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika, » elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala ; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.