Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 29:12 - Mokanda na Bomoi

12 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 29:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeroboami akataki ete basalaka feti mibu nyonso na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe ndenge basalaka na mokili ya Yuda, mpe abonzaki mbeka na etumbelo. Asalaki ndenge wana na Beteli epai wapi abonzaki mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya bana ngombe oyo asalaki, mpe atiaki banganga-nzambe na bisambelo oyo abongisaki na likolo ya bangomba.


Bongo kolanda makomi, basepelaki feti ya Bandako ya kapo, mpe babonzaki mikolo nyonso bambeka ya kotumba kolanda motango oyo ekatama mpo na mokolo na mokolo.


Bamonaki ete ekomama kati na Mibeko oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize, ete bana ya Isalaele basengeli kovanda kati na bandako oyo batonga na matiti, na tango ya feti ya sanza ya sambo,


Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo ; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti.


Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga.


Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu.


Na mikolo nyonso sambo ya feti oyo ebandaka na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, akobanda kobonza bambeka kaka wana : bambeka ya masumu, ya kotumba, ya bambuma mpe ya mafuta.


Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.


« ‹ Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo, ekozala nde mokolo ya kobeta bakelelo.


Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mpe lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe zomi na misato ya mibali, bameme mibale ya mibali, mpe bana meme zomi na minei ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba.


Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani monene mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ