Mitango 29:11 - Mokanda na Bomoi11 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.