Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ;
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ;