Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 28:9 - Mokanda na Bomoi

9 Na mokolo ya Saba, bokobonza mbeka ya bana meme mibale, ya mobu moko oyo ezanga mbeba, elongo na likabo ya masanga mpe bakilo motoba ya farine oyo basangisa na mafuta, lokola makabo ya mbuma.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 28:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mobali na ye atunaki : — Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo ? Lelo ezali ebandeli ya sanza te ! Ezali mpe mokolo ya Saba te ! Azongisaki : — Komitungisa te ! Nyonso ezali malamu.


Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele.


Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso.


Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso : feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo.


Soki obateli matambe na yo ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, mpe ete osala te mosala oyo yo olingi na mokolo na Ngai ya bule ; soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; soki opesi yango lokumu na koboya kolanda nzela na yo moko, kosala misala na yo moko mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,


Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.


Na mokolo ya Saba, mokambi akomema epai na Yawe lokola mbeka ya kotumba bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali : nyonso esengeli ezala ezanga mbeba.


Oyo ezali mbeka ya kotumba mpo na mikolo nyonso ya Saba, bakisa mbeka ya kotumba ya tango nyonso mpe mbeka na yango ya masanga.


Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ