Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 28:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bokobakisa lisusu likabo ya masanga : balitele mibale ya masanga ya vino ya sika mpo na mwana meme moko na moko. Bokobonzela Yawe masanga yango na Esika ya bule.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 28:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na mwana meme ya liboso, okopesa bakilo misato ya farine basangisa na litele moko na kati-kati ya litele ya mafuta, mpe okosopa litele moko na kati-kati ya litele ya vino lokola mbeka ya masanga.


Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, kati na bikeke nyonso : bokobanda kotumba yango na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya Yawe ; ezali na esika wana nde nakobanda kokutana mpe kolobana na bino.


Kobonza te na etumbelo : ansa oyo elongobani te, mbeka ya kotumba to makabo ya bambuma. Mpe kosopa te likolo na yango makabo ya masanga ya vino.


Libula na yo ezali nde banzambe ya bikeko kati na mabanga ya lubwaku, oyo babongisa ; solo, yango nde ezali libula na yo. Solo penza, ezali epai na yango nde ozali kosopa makabo ya masanga ya vino mpe kobonza makabo ya bambuma. Boni, nasepela solo na makambo ya boye ?


Oh bino Banganga-Nzambe, bolata basaki mpe bolela. Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela. Bino basali ya Nzambe na ngai, boya, bolata basaki butu mobimba. Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.


Makabo ya bambuma mpe ya masanga ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.


Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino ?


Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga.


Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga : ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga.


mpe balitele mibale na ndambo ya vino lokola likabo ya masanga. Bokobonza yango lokola malasi ya solo kitoko liboso ya Yawe.


Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala : balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali.


Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › »


Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, oyo ebandisamaki na ngomba Sinai ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ