Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 28:3 - Mokanda na Bomoi

3 Loba na bango : ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe : bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 28:3
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo na kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba epai na Yawe, na etumbelo na yango, na tongo mpe na pokwa, kolanda bikateli oyo ekomama na mobeko oyo Yawe apesaki na Isalaele.


Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso : feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo.


Sima na yango, babonzaki mbeka ya kotumba ya tango nyonso, bambeka ya kotumba oyo ekatama mpo na feti ya ebandeli ya sanza mpe mpo na feti nyonso oyo ekatama mpo na Yawe, mpe bambeka ya kotumba mpo na bato nyonso oyo bazalaki bango moko kopesa makabo wuta na mokano ya mitema na bango.


Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi ; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi.


Wuta tango oyo bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo kino tango oyo bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi, ekoleka mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku libwa.


Emitombolaki kino kotia tembe na Mokonzi ya mampinga, elongolaki mbeka ya mokolo na mokolo na losambo mpe ebebisaki Esika na Ye ya bule elongo na miboko na yango.


Nayokaki mosantu moko koloba, mpe mosantu mosusu kotuna ye : — Makambo oyo etalisami na emoniseli ekosala mikolo boni ? Mbeka ya mokolo na mokolo ekopesama lisusu te mikolo boni ? Botomboki oyo ememaka pasi ekosala mikolo boni ? Mikolo boni Esika ya bule mpe mampinga ekotiama na se ya matambe ?


Bana mibali ya Aron bakotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Ndambo oyo ekotikala, Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia yango. Kasi bakolia yango ezanga levire, na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


« Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.


Oyo ezali mbeka ya kotumba mpo na mikolo nyonso ya Saba, bakisa mbeka ya kotumba ya tango nyonso mpe mbeka na yango ya masanga.


Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.


Bokobonza mbeka oyo nyonso, bakisa mpe mbeka ya kotumba ya libela ya tongo.


Bokobanda kobonza yango mikolo nyonso, na mikolo nyonso sambo, lokola bilei bazikisa na moto ; mpe solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Ekobanda kobakisama na mbeka ya kotumba ya libela mpe na mbeka na yango ya masanga.


Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › »


Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa ;


Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.


Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, bakisa lisusu mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.


Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Wana biloko oyo nyonso esilaki kotiama, Banganga-Nzambe bazalaki kokota, mbala na mbala, na eteni ya liboso ya Mongombo mpo na kosala mosala na bango.


Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ