Bokozala na mayangani ya bule na mokolo ya liboso mpe na mokolo ya sambo. Bokosala mosala moko te na mikolo wana longola kaka mosala ya kolamba bilei oyo moto na moto akolia. Yango kaka nde bokosala.
Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.
Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe.
Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › »
Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo.
« ‹ Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo, ekozala nde mokolo ya kobeta bakelelo.
Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo.