Mitango 28:2 - Mokanda na Bomoi2 « Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. »
Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.
Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango ; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe.
bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.
Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama ; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › »