Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 28:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 28:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye babomaki ntaba, bazwaki elamba ya Jozefi mpe bazindisaki yango na makila ya ntaba.


Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali : akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu.


Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango.


Tango kaka akososola masumu na ye oyo asili kosala, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mobali oyo ezanga mbeba.


mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.


Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala : balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali.


Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.


Loba na bango : ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe : bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela.


Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.


Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, bakisa lisusu mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.


Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.


Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ