Bosengeli mpe kopesaka mikolo nyonso epai ya Banganga-Nzambe ya Yelusalemi biloko nyonso oyo bakozala na yango na bosenga mpo na mbeka ya kotumba ya Nzambe ya Likolo : bana ngombe ya mibali, bameme ya mibali, bana meme, ble, mungwa, masanga ya vino mpe mafuta. Soki bakomi na bosenga ya biloko, bino bosengeli kopesa bango yango mikolo nyonso, mpe esengeli te kozanga,
Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.
Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali ; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma.