Mitango 27:7 - Mokanda na Bomoi7 « Makambo oyo bana basi ya Tselofikadi bazali koloba ezali solo. Osengeli kopesa bango eteni ya mabele lokola libula kati na bandeko ya tata na bango mpe pesa bango libula ya tata na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki : « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. » Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe.