Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 27:19 - Mokanda na Bomoi

19 Mema ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya lingomba mobimba ya bato, bongo okopesa ye mosala na miso na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 27:19
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pesa ye ndambo ya bokonzi na yo mpo ete lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakoka kotosa ye.


Pesa mitindo na Jozue, pesa ye makasi mpe lendisa ye ; pamba te ye nde akokamba bato oyo mpe akosala ete bazwa lokola libula mokili oyo ozali komona.


Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. »


Yawe, Nzambe na bino, akotambola Ye moko liboso na bino, akobebisa bikolo oyo ezali liboso na bino mpo ete bokamata mokili na bango ; Jozue nde akotambola liboso na bino ndenge Yawe alobaki.


Boloba na Arshipe : « Sala keba na lotomo oyo ozwaki kati na Nkolo mpo ete okokisa yango malamu. »


Liboso ya Nzambe, ya Yesu-Klisto mpe ya ba-anjelu oyo baponama, napesi yo mokumba ya kobatela mitindo oyo na kozanga kopona bilongi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ