Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.
Bakozingela mokonzi, moto na moto na ebundeli na ye na loboko. Moto nyonso oyo akopusana na molongo na bino, bosengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. »
Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na likolo ya bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »
Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.
« Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai : ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. ›
Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango.