Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi.
Bakozingela mokonzi, moto na moto na ebundeli na ye na loboko. Moto nyonso oyo akopusana na molongo na bino, bosengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. »
Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi : — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo !
Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai.
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.