15 Moyize alobaki na Yawe :
mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;
pamba te tango lisanga ya bato batombokaki mpo na mayi, na esobe ya Tsini, bino mpe botosaki mitindo na Ngai te mpe bopesaki lokumu te na bosantu na Ngai na miso na bango. Ezalaki nde mayi ya Meriba ya Kadeshi, na esobe ya Tsini.
— Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo ;