Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 27:13 - Mokanda na Bomoi

13 Sima na yo komona yango, yo mpe okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi ndenge moko na Aron, ndeko na yo ya mobali,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 27:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Isimaeli awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo. Akataki motema mpe akufaki ; akendeki kokutana na bakoko na ye.


Bongo Abrayami akataki motema mpe akufaki. Sima na ye kotonda mikolo mpe kokoma mobange makasi, akendeki kokutana na bakoko na ye.


« Zongisa mabe na mabe oyo bato ya Madiani basalaki bana ya Isalaele, mpe na sima, okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi. »


Ezali kuna na ngomba Ori nde, kolanda etinda ya Yawe, Nganga-Nzambe Aron amataki mpe akufaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, sima na mibu tuku minei wuta bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.


Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai ; alobaki : « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango.


Bana ya Isalaele batambolaki wuta na mabulu ya mayi ya Bene-Yaakani kino na Mosera. Aron akufaki kuna mpe bakundaki ye. Mpe Eleazari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye lokola Nganga-Nzambe.


Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.


Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,


Nakokufa na mokili oyo mpe nakokatisa Yordani te ; kasi bino, etikali moke bokatisa mpe bokamata mokili oyo ya kitoko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ