Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 26:62 - Mokanda na Bomoi

62 Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 26:62
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi.


« Kotanga te motango ya bato ya libota ya Levi, kokotisa bango te na molongo ya bato mosusu ya Isalaele.


Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko.


Motango nyonso ya Balevi oyo Moyize mpe Aron batangaki kolanda mitindo ya Yawe, mpe bato ya bituka na bango, mibali nyonso kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki bato nkoto tuku mibale na mibale.


Mosala nyonso ya bato ya Gerishoni ekokambama na Aron mpe bana na ye ya mibali : ezala mpo na komema biloko to mpo na kosala mosala ; bokoyebisa bango mosala nyonso oyo bango basengeli kosala.


batangamaki ; motango na bango ezalaki nkoto mwambe na nkama mitano na tuku mwambe.


Yango wana, bana ya Levi bazali na ndambo ya mabele te to libula te kati na bandeko na bango : Yawe nde azali libula na bango, ndenge Yawe, Nzambe na bino, alobaki na bango.


Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango.


Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango.


Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani ; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ