60 Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari.
Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
Bakombo ya bana mibali ya Aron ezalaki : Nadabi, mwana ya liboso ; Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
Bakobatela bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bakosalisa bana ya Isalaele na nzela ya kosala mosala ya Mongombo.