Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki : na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi ; na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani.
Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.